L'EXPERIENCE DE FOI DE MAMAN ADEL
MATATOLI YA BONDIMI YA MAMAN Adel MANGA
Kombo na ngayi maman Adel MANGA. Nazali na 54 ans.Nazali sympathisante na Centre de formation ya Kinshasa . Nayebi Eglise Messianique banda décembre 2011 na nzela ya cousin na ngai oyo azalaki déjà acheminer na porte ya foyer de Lumière ya Kimbanseke. Ayebisi ngai boye:”na loti tokomi kozua lumiere ngai na yo na Eglise moko ba acheminki ngai na porte , namoni que ba problèmes na yo ekosila kaka kuna, tokende,babondela pona yo”. Naboyaki,kasi na insistence na ye naye kondima. Ba problèmes nazalaki na yango ezalaki:
- Kobunga ya muana na ngayi ya muasi ya 25 ans depuis 4 ans sima ya kosilisa licence na hotellerie.
- Koteka lopango na ngai awa na kinshasa(tina oyo ngai nayeli awa na Congo po naza mariée na Belgique).
- Blocage na famille mobimba pona misala ya bandeko na ngai na mabala ya bana basi na tambola na mangomba ebele pe na banganga pona makambo oyo.Na kutana na nganga moko oyo abimiseli ngai cercueil ya muke ya rouge ,likolo na yanga a dessiner Jesus-christ na croix ,na tie mbongo20$ na kati, na sima afungoli, namoni enveloppe na lettre moko na kombo na ngai, na ya maitre salomon, bakomi kobanga te ba problemes na yo ezui solution. Apesi biso poudre moko ya kokunda na lopango po etekama pe ya kotumba milinga na lopango ; kasi sima ya ya 3 semaines tomoni eloko te ; tokei ko retirer dossier na 10$.Na sima bamemi ngai na Eglise ya mpeva-longo.Kuna basali (missionnaires) bayaki na lopango balobi :bozobonga te na famille po bakundi biloko ya mabe na lopango na bino, esengeli tokundola yango, tobimisa yango po vie na bino ebonga.Batimoli libulu na llopango ba bimisi mèches ya suki ya bana basi ,lokolo ya ngombe ,mutu ya soso mobali na manzaka ya ngembo ;bakundi 4 bouteilles na 4 coins ya lopango po bato oyo bakundaki biloko wana bakufa soki baye po bakunda biloko mosusu na lopango.Sima ya 4 mois tomoni solution na likambo moko te.Famille aye komema ngai epai ya sango moko, asengi ngai nasomba huille d’olive,vin rouge, encens ,poudre ya saint Michael ,na biloko mosusu po asala cérémonie na parcelle, natosi yango pe aye kosala céremonie, asopi yango partout na lopango tii na w .c., kasi namoni eloko te.Na suka aye koloba nasomba 5 milangi napesa ye po akanga 5 esprits oyo ezo tungisa biso,kasi famille eboyi. Na suka nde na ye kukutana na Eglise Messianique na nzela ya ndeko na ngai.
Tango nakomi na Foyer de lumière, responsable apesi ngai orientations boye :
1.kosala reflexion profonde
2.kosala pratique ya sonen pona ko acheminer ba pasi ya ba koko
3.kosala bilanga
4.kosala offrande ya kozongisa motondo pona purification
Sima ya sanza moko ya ba pratique,leki na ngai oyo amemaki ngai na Eglise akei kotombokela responsable na Unité , alobi na ye :ndenge nini yaya na ngai azo zua solution na makambo na ye te ?Meshu-sama asalaka lisusu te ?Nini ezo sala que solution emonana te ?
Responsable alobi na ye :lobo na Meishu-sama azo yoka yo pe akolakisa yo ntina ya ba pasi na bino na famille.Tango nazongi ndako,nsima ya mikolo minei moninga na ngai abengi ngai na téléphone alobi :na Eglise okendaka ba bikolaka te,nakomema yo epai ya prophète moko ,ye akoloba na yo esika pasi na yo ezali kowuta pe nini okosala pona solution ».Na tongo abengi lisusu, nalobi na ye zela ngai nazo ya.
Sima ya komela ti,nayoki mposa ya kosala bilanga pe kobongisa esika ya kolona fololo.Motema etindi ngai nasala bilanga pembeni na nzete moko ebakata nakati ya lopango,nzete oyo bakata yango banda 2004 epai ya sango moko oyo ayaki pe kosambela na lopango ; pona ye pasi nyonso ya famille ezalaki kowuta nanzete wana yango wana alobaki bakata yango mpo pasi esila ;kasi pasi esilaki te.Nayoki mposa ya kopindola misisa ya nzete oyo.Yaya ya muasi na ya mobali na bana nkasi balobi na ngai que makambo ebele ebima pona nzete wana pona nini olingi kopikola yango ?nalobi na bongo :posa na ngai eza ya kopindola ndambu ya nzete oyo na misisa na yango nyonso.Na timoli distance ya loboko mobimba, na pindoli nzete nyonso ; namoni linzanza ya Nido, nakati na mabele ya rouge lokola ngola pe na Gillette na kati. Nasima nabimisi sachet noir ya viva ,na kati na yango nakuti muana ya popy, bic , 7 escargot ,ba ndika 7 , liboke moko bakanga,kasi tozuaki courage ya kofungola yango te, nzungu moko ya muke ya mabele, tokuti pe chemise mobimba ya RVA ya yaya na biso ya libota ya bleue-ciel ya sika oyo ebunga .
Tango na zo bimisa biloko oyo, bandeko na ngai babandi kosepela que toyebi sik’oyo esika pasi nabiso ewutaka ; bandeko babengi pasteur moko ya quartier pona kotumba biloko oyo , kasi aboyaki, alobi :biloko ya boye eza na risque ebele, ebongi batumba yango kaka na Eglise maman Adel asambelaka.
Tata muasi na biso moko afandaka na commune mosusu aye lokola motomoko babengi ye,akuti nabimisi kisi libanda pe tosi totumbi yango,alobi :biloko oyo nalona yango banda 1982,moto moko ayebi yango te,nalingi nayeba mayele nini yo ADEL azui pona koyeba que tokunda biloko oyo awa ?Ngai nakoyeba esika mayele nayo ewuti .Bino, bolingaki bobonga te bomoyi na bina mobimba tii liwa na bino, bosepela na ndenge bobiki,ba oyo basalaka te bakosala, ba oyo babalakate, bakobala,ba oyo babotakate bakobota, bofunguami na bino.
Tango nyonso tata muasi oyo alobaka :kasi botangi te,totala esika bokozuela mosala; kasi bolati ba voile ya mariage pe bobali ,totala esika bokobotela bana .
Na famille na biso naza na ba leki 3 oyo baza na pasi babotaka te ;toza na bandeko na bana ebele oyo bazua ba diplômes d’Etat, ya graduat na ya licence kasi baza na misala te.Sima ya kosimba mabelenakei kobimisa biloko oyo pe , tososoli cause ya pasi na biso na libota.Nasosoli mbala moko été ezali réponse na mitungisi na ngai na leki na ngai ya koyeba ntina ya ba pasi nabiso na libota .Nakendaki lisusu epai ya moninga oyo abengisaki ngai te.Nabengaki responsable ya Foyer na biso,ayaki kosamela pe kotumba biloko yango.
Bandeko na ngai balobi banda obimisaki biloko oyo changement ekoti na famille,tokomi kimya :leki moko babengi ye na Ambassade ya Italie pona mosala,leki mosusu,moninga naye apesi ye lopango ya kofanda ofele, alungue na ndako ya kofutela pe apesi ye responsabilité ya ko gérer 3 magasins .Na lopango esika tofandi :banyawu oyo bazalaki kolela mikolo nyonso na lopango lokola bana balelaka lisusu te,ba makelele ya bato bazo tambula na lopango na butu libanda ,ezalaka lisusu te, ba corbots oyo ba lelaka mikolo nyonso na nzete ya mbila, balelaka lisusu te.Famille na ngai bazo kamua ndenge nabimisi biloko oyo mpenafandi , namoni eloko moko ya mpasi na nzoto na ngai te.
Na litatoli oyo nasosoli ete Meishu-Sama aza masiya mpe mobikisi,mpo atalisi ngai bosolo ya mateya na ye oyo elobi ete pasi nyonso ezali bilembo ya ba koko na biso.Na yango na zui mokoko ya kokula mpo nabikisa bakoko na ngai pe bato mosusu ; Nasi nateya bato ebele kasi moko kaka nde atikala.
Merci
Inscrivez-vous au blog
Soyez prévenu par email des prochaines mises à jour
Rejoignez les 33 autres membres